Christian bosembe : " esengeli te na mopanzi na azua place ya ba zuzi nako funda songolo ayibi misolo ya l'état"

 
President ya Conseil superieur de l’audiovisuel et de la communication (CSAC), Christian Bosembe akebisi ba panzi sango batika ko zua place ya ba zuzi na tina kofunda moto songolo po ete ayibi mosolo ya l'Etat.

Namakanisi na ye alimboli ete decision Csac ezui sanza oyo ya kobenda matoyi ya bapanzi  sango na oyo etali kolobela ba dossiers oyo justice, ezali naino kolandela liboso ebanda kosambisa yango. 

Akebisi moto nionso oyo ako kweya na mbeba ako zala sanctionner epayi ya CSAC. 

Tolanda lisolo ya Christian Bosembe na Blaise Shindani Kambala : /sites/default/files/2024-05/160524-p-l-kinshasa_invite_christian_bosembecsac-00_web_0.mp3