Wuta mboka Qatar epayi wapi bakosola pona kozongisa kimia na Rdc poso misato yango oyo ba M23 na Rdc bakomi pe balobi polele te kala te bakotelemisa bitumba na monyele ya ekolo. Balobi pe lisusu te kotosa mokano moye mozali ebandeli ya masolo pona kotika bitumba nye pe kokotisa libela kimia na Rdc pe nzinga nzinga. Bongo bikolo neti Rwanda, Belgique pe Qatar ye moko basepeli makasi na mokano moye.
Bayi Nord kivu baye bafandi mosika te na lac Edouarc to pe na parc ya Virunga basengeli kosala keba. Pamba te bokono babengi Anthrax to bokono ya charbon ezali mosika te na bango bo elobi bayi environnement na bitando bizali kuna. Nde wana bato basengeli kokeba. Esengeli pe lisusu koyeba te balobelaki mingi penza mbala liboso bokono eye na Nord kivu nde na sanza eleki.
Bilo ya leta ebongisaka lifuta ya basali ya leta ayebisi lelo te basali ya leta yango babandi kofutama lelo. Lifuta yango ebandi na mua bokeseni po babakisaki bato ya sika pe esengaki kokotisa motango ya mbongo ya ba soda oyo babakiselaki bango. Kasi pona bilo ya leta oyo bakosala nioso po lifuta ya mosali ya leta nioso efutama kaka na sanza eye. Mbulamatari pe alaki te misolo ya basali ekokoba kofutama pe ba sango nango manso makozalaka kolobana kaka na pole.
/sites/default/files/2025-04/24042025-p-l-journallingalasoir-00.mp3web.mp3