" Manaka ma maponomi ma lengeli nini sima ya eteni ya yambo ya maponomi ? "

Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.

” Manaka ma maponomi ma lengeli nini sima ya eteni ya yambo ya maponomi ? ”

* Matondi na yo ndeko… Manaka ma maponomi eye elengelami kobanda eteni ya yambo ya maponomi ya boweli ngwende ya mokonzi wa ekolo ebongisi misala miyike wuto koponama ya eteni ya ibale ya mokonzi wa ekolo mpe kotya na misala mangomba ma sika ma Congo Démocratique. Mikolo miye mi lengelami mpo na manaka mana mi zali kobanda na sanza ya zomi kino sanza ya zomi na mibale ya mobu moye, mingi mpenza o mia ntuku mibale na libwa sanza ya zomi eteni ya ibale ya maponomi ya mokonzi wa ekolo mpe omia ntuku ibale sanza ya zomi na ibale kotya na mosala masanga ya bantoma ya bituka baye bakoponama. Nzokande kati ya mikolo mina, ekosalema mpe maponomi ya basenateur, bayangeli bituka, mpe balandi ba bango. Esengeli koyebisa te, eteni ya ibale ya maponomi mpo na mokonzi wa ekolo mpe ya bantoma ba bituka ekosalema mokolo moko, omia ntuku mibale na libwa sanza ya zomi ya mobu moye. Mambi masusu ya koyebisa ezali te, omia zomi na libwa sanza ya zomi na moko nde esakolami mbano ya maponomi ya mokonzi wa ekolo. Mpe omia ntuku mibale kino ntuku mibale na mibale elengelami na masanga ma politique to bacandidat komema o cour suprême de justice mikanda mpo na kolakisa te basepeli te lolenge maponomi mi salameli. Sika cour suprême esengeli kotala mambi mana, kobanda mia ntuku ibale na isato kino ntuku ibale na libwa sanza ya zomi na moko. Mpe mbano ya suka ya boweli ngwende ya mokonzi wa ekolo ekosalama omia ntuku misato sanza ya zomi na moko.

” Sika ndeko Blaise Shindani, sima ya manso maye, manaka ma maponomi ma lengeli nini lisusu ? ”

* Ya solo ndeko….. motuna na yo ezali na ntina koleka. Bosengeli koyeba te, kobanda sanza ya zomi na mibale mobu nkoto mibale na motoba, kino sanza ya yambo mobu nkoto mibale na sambo elengelami kosakolama ya mbano mpo na bantoma ba bituka, mpe kokotisa mikanda mpo na koboya lolenge esalemelaki. Kosakolama mpo na bantoma ba bituka bilengelami omia mitano sanza ya zomi na mibale mobu moye. Mikanda na cour d’Appel elenglami omia motoba kino mia mwambe sanza ya zomi na mibale mobu moye. Nzokande cour d’Appel esengeli kotala mambi mana kobanda mia libwa sanza ya zomi na mibale mobu nkoto mibale na motoba, kino mia libwa sanza ya mibale mobu nkoto mibale na sambo. Esengeli lisusu koyeba ndeko….. te, maponomi ya basenateur, bayangeli bituka, mpe balandi ba bango ma lengelami omia ntuku mibale na libwa sanza ya zomi na mibale mpo na baisenat mpe mia zomi na motoba sanza ya yambo mobu nkoto mibale na sambo mpo na eteni ya yambo ya maponomi mpo na bayangeli bituka mpe balandi ba bango. Cei eyebisi mpo na kosukisa te, manaka mpo na maponmi ya bakambi bacommune, baquartier mpe basusu, ma kobima sima te mobeko lolenge ya bokaboli bituka bindimama o parlement ya sika eye ekoponama.

Texte de DONAT MADIMBArnTraduit en lingala par BLAISE SHINDANI