Dr Jean-Paul Lembelembe atondisami na esengo po ete babeli ya mbasu alandeli, pota na bango ezali ko évoluer malamu

Docteur Jean-Paul Lembelembe, spécialiste ya makambu etali ba pota oyo ekowumelaka to mbasu, atondisami na esengo sima ya campagne ya mibale ya traitement ya mbasu oyo awuti kosilisa sanza eye ya misato, awa na Kinshasa na polyclinique Charis na Binza meteo.

Bakoni tuku misato na sambo (37) ya sika babakisami. Baye bayaki na makolo ya kovimba ekiti, ya kotanga mayi ekauki. 

Abakisi ete ata campagne esili, hôpital yango ezali kokoba koyamba babeli.

Docteur Lembelembe azali kopesa bilan ya campagne yango pe lolenge ba cas ayambi ezali ko évoluer na lisolo oyo na Jean-Désiré Kanyama. Tolanda :/sites/default/files/2024-03/280324-p-l-kinshasa_invite_dr_lembelembesurmbasu-00_2_web.mp3