Maniema : Serapahin Mokito akebisi ba ekambi ya ba eteyelo oyo bazali kosenga mbongo lolenge esengeli te epayi ya ba boti

Serapahin Mokito Kaunda oyo azali directeur ya province éducationnelle Maniema 1, akebisi ba kambi ya ba eteyelo oyo bazali ko tia mbilinga mbilinga na kotanga ya bana.

Ye azali kotelemela likambo ezosalama mikol’oyo na ba écoles kuna, oyo bakambi na yango bazali kosenga ba dons pona mokolo ya le 30 avril oyo ezalaka journée ya enseignement. 

Azali kotelemela mbala moko pe mbongo ndenge na ndenge bakambi biteyelo bazali kofutisa bana. 

Serapahin Mokito Kaunda azali kosolola na Florence Kiza Lunga :  /sites/default/files/2024-04/240424-p-l-kindu_invite_proved_maniema1seraphinmokitokaunda_web.mp3