Christian Bosembe : " ba panzi sango basengeli kotosa mobeko ya CSAC oyo epekisi kopanza sango ya ba tomboki ya m23 "

Mokambi ya Conseil superieur de l'audiovisuel et de la communication, CSAC ya RDC, Christian Bosembe asengi na ba panzi sango ete ba tosa mobeko oyo epekisi na bango kopanza sango ya batomboki ya m23.

Pona ye, ezali malamu te komona ba panzi sango ba yeba nini esengeli na bango koloba, pon aoyo etali bitumba oyo ekolo Congo ezali na yango. Tala tina, elobi ye, CSAC azuaki mokano yango oyo etali medias nionso ezala pe ba reseaux sociaux to ba plateformes numériques.

Kasi mesure wana esepelisi ba associations professionnelles ya ba journalistes te. Pona bango wana ezali ko réduire liberté ya ba journalistes.

Nionso bolanda na lisolo ya Christian Bosembe pe Blaise Shindani Kambala :/sites/default/files/2024-04/2304024-p-l-invite_christian_bosembe1ere_partie-00_web.mp3