Matete : bourgmestre Jules Mukumbi azui mokano ya kotia bopeto sima ya ba mvula oyo eza kobeta

Kolandisama na ba communes mingi ya engumba mokonzi Kinshasa, baie bafandi na commune ya Matete pe bazali komona pasi sima ya mvula, mingi penza inondation, kobukana ya nzela pe insecurité.

Tala tina mokambi na yango, Jules Mukumbi azali kosalisa misala na oyo etali kotia bopeto esika mayi elekanaka, phenomene kuluna pe ba sujets misusu etali ba balabala pe bomoyi ya bai Matete.

Kasi azali koyoka pasi pamba te commune ezali na misolo mingi te pona ko sala misala lolenge elongobani.

Jules Mukumbi azali kosolola na Babel Mpongo Masimango :/sites/default/files/2024-04/invite_bourgmestre_ya_matete.mp3