Kinshasa : Ministre wa ekolo na bioso atali mambi ya bomoto, lobiko lwa bato mpe bomoko na ekolo Modeste Mutinga abandisaki mokolo mwa mosala mibale ya sanza tozali awa na Kinshasa, campagne ya kokongola misolo po na kosunga bato bazali na bosenga ,
2/Kisangani : Bokono babengi bokono ya makaku to monkeyi pox bongali na etuka tshopo, bato kama mitano tuku mineyi na motoba batangami na bokono yango, tuku mineyi na mitano basili kokufa uta sanza ya yambo ya mobu tozali kino eye ta mineyi ewuti koleka ,
3/Bandundu : Mbula matadi ya ekolo elaki kofutela bana ya kelasi misolo mia mimekano minso mia l’Etat, ezali bana baye bakimaki bondongwani bozalaki na territoire ya Kwamouth bakenda kobombama na etuka BDD./sites/default/files/2023-05/03052023-p-a-d-journallingalamatin-00.mp3