Efonguami mua misala mineyi eye na Mbandaka o equateur monene likita ya bayangeli bituka, o libaku liye mokonzi wa ekolo akundolaki na banso ntina ya kotombola muango ya ba territoire kama moko na tuku mineyi na mitano….
Na Nord kivu bitumba bizongelaki lisusu mua mosala mineyi eye kati na batomboki ba M23 , mamapinga ma ekolo pe batomboi basusu ya etando na Bishusha o territoire ya Masisi , kasi sango endimisami naino te na molobeli mampinga o etuka….
Na Sud kivu bayi societe civile ya Bukavu bakumisi tango ebakisami po na etinda ya Onu na Rdc , nzoka nde bango baakomitungisa komona te’ lisanga ya bokengi ya Onu epesi ata etinda moko te po ya maponami makoya o ekolo...
/sites/default/files/2022-12/22122022-journallingalasoir-web.mp3