Batomboki ba M23 babomaki bato leka kama moko na tuku misato na Kishishe mia tuku mibale na libua pe mia tuku misato ya sanza eleki, wana maye matalisami na lapolo ya ebandeli bolukaluki ya bulo ya Onu ekolandelaka makoki ma moto pe Monusco ….
Ituri , batomboki leka tuku mitano ya bokabuani ya ba Codecona Mongualu bandimi kokitisa mandoki pe komizongisa kasi basengi na mbula matari ya ekolo kobasunga….
Na Sud Kivu , batangi mambi tuku sambo na misato ya matungisi na basi kobanda sanza ya yambo na Bukavu….
/sites/default/files/2022-12/09122022-p-l-journallingalamatin-web.mp3