Bato leka mokama baakomonana te sima likama ya mayi liye lisalemaki na lobala Lulonga na Basankusu o etuka monene ya Equateur, kino sika bolukaluka bobandi naino te bo’ eyebisi ba nzengeneke…..
Ituri , bayi mboka territoire ya Djugu batalisi nkanda na bango sima bobomami ya booko bakima bitumba o esika ya Savo na batomboki ba Codeco …tokolanda pe po yango makanisi ya mokambi bulo ya Monusco o Ituri …..
Nzoka nde na Kwilu , bakima bitumba leka kama mibale na ndambo baakolongua na Bandundu po ya kokende na Bagata….nde tolandi manso na bolayi sima mua bopemi ….
/sites/default/files/2023-01/19012023-p-l-journallingalasoir-web_bon.mp3