Masolo kati Rdc na M23 na Qatar ekobi lisusu lelo. Kasi polele eza nano penza mingi te. Pamba te sango ya polele boye nano penza epesami te. Pe lokola bitumba na mabele awa na Rdc kati ngambo mibale oyo yango ekati pe te.
Mbula ebeti lisusu makasi lelo na Kisasa. Kasi oyo ebetaki na suka ya poso eleki epesi ba pasi ebele. Pembeni ya mayi kokotela bato. Basusu mapango ebungi to eliami na mabengi. Ebele ya bato bakobunda kaka bango moko po batikala ata na ndambo ya lopango kasi ezali kaka pasi.
Bayi bosembo kama muambi baye balongaki mimekano ya kokoma ba zuji na mobu koto mibale tuku mibale na mibale kasi nano batie bango na mosala te basengi leta atia bango na mosala yambo tokoma na suka ya mbula.
/sites/default/files/2025-04/11042025-p-f-journallingalasoir-00web_0.mp3