Journal lingala matin

Mikolo oyo mbula ekobeta makasi na Kisasa pe kokotisa mabota ebele na pasi. Wuta mikolo mitano mileki ministre atali lisungi na ba keleli akomemela bazwi makama ya mbula ebetaki mikoloyo masungi ndenge na ndenge neti mayi na bileyi.

Na mboka Matolo na Ituri. Bayi mboka nzela ya kokenda lisusu na bilanga na bango ndenge balingi ezali lisusu te pamba te bato moko bamitalasi bo ba Adf bakopekisa bango. Bakosenga moto nioso alingi akenda na bilanga afuta nano dix dollars ya misolo po akota. Oyo alingi te atika. Kasi Mangomba matali makoki ya bato kuna basepeli te pe basengi leta asilisa penza bikela bina.

Na Kwilu maponami pona Moyangeli etuka pe ba sénateurs esi eleki. Kasi sima nango masolo ebele eko betama na internet te ba ntoma ba boni bazuaki knyaka to madesu ya bana po bapona songo to pakala. Yango societe civile ya Kikwit asengi kosambisa ezala po polele pe ezala.

 

/sites/default/files/2025-04/14042025-p-l-journallingalamatin-00web.mp3