Bozangi bokengi boye bongali o bikolo ya bitima binene kombo na yango Rwanda , wana maloba ma ngay te kasi nde eyano ya mokonzi wa ekolo o tango azalaki koyanola na yoko mopanzi sango o bokutani ya misala ya nkita na Davos o ekolo Suisse…
Awa na Kinshasa episikopo ya lokumu cardinal Fridolin Ambongo akumisi misala mikosalema po ya mabongisi ya koyamba papa wa Roma o mikolo mikoya , ye abuaki pe mbela po te’ banso elongo tomilengele po ya koyamba papa malamu….
Misala ya ba bokambi ba zuzi ekani kotinda ba zuzi o bisika mzike kati na ekolo o mikolo mikoya , mokano moye mowuti kolanda na lolenge misala mya sembo mizali lisusu te o etuka Maindombe…
/sites/default/files/2023-01/18012023-p-l-journallingalasoir-web.mp3