Po ya koluka kozongisa kimia o monyele ya ekolo Rdc , mokambi lisanga ya Sadc pe ekolo Angola Joao Lurenco aponami na baninga ba ye po te’ asangisa Kinshasa na Kigali po ya koluka biyano , etinda azuaki mua poso moleki o bosukisi likita ya Sadc na Lunada….
Mokonzi wa ekolo Felix Antoine Tshisekedi , asengi na bakambi misala minso kotia o bikela mikano o matali mobeko po ya bokengi pe ntombua ya bato bakobikaka na binama pe basusu na bobola o ekolo Rdc …ezalaki o libaku lya bobandisi bobeti ntagba po ya mobeko moye ….
O Ituri nzela Bunia-Komanda eekokoba na kotungisa bakumbi mituka o eleko eye ya mpela , mituka mzike mikangemi , misusu pe bikufi too bibaluki se kuna na ntina bobebi ya nzela……
/sites/default/files/2023-11/06112023-p-l-journallingalamatin-00wweb.mp3