Bukabuka ndenge biso nioso toyebi ezali bokono moko mabe penza. Yango rdc emipesi makasi pona kobundisa yango mikolo oyo. Etuka lokola Kisasa na pe mitano misusu ya ekolo babandaki lobi kopesa bana mangwele ya bokono yango.
Na Nord Kivu. Balakisi bayike ya zone educationnelle ya Nord Kivu 1 na 3 bakosenga leta asala noki oyo esengeli po bazua lifuta na bango. Sanza misato yangoyo bafutami te. Nde bakomeli minister ya mambi na kelasi ya mboka atalela bango likambo yango ya lifuta na bango.
Pona sango etali masuwa oyo edindaki na etando Mayita na etuka Equateur na ebandela ya poso. Lelo boye ba ntoma ya kuna balobi te baweyi ba likama liye bakoki kozala ata tuku mitano
/sites/default/files/2025-04/11042025-journallingalamatin-00web.mp3