Mikolo mineyi lelo sima mbula oyo ebetaki na suka ya poso eleki. Mayi ezali kaka yako yingela na ba quartiers ebele. Bato bakufi koleka zomi. Ebele misusu mayi ekoteli bango naba ndako. Pe basusu lisusu babungisi biloko na bango ebele ya ndako.
Na Kisasa. La Commission Électorale Nationale Indépendante (CENI) abimisi manaka naye ya maponomi oyo ekosalama na eleko 2025-2029. Manaka mango malakisi mingi ndenge maponomi ya bituka pe bitando makosalama.
Na Tshopo. Kobika ya bakangami ya boloko monene ya Kisangani ezali malamu te. Bileyi bizokoka te. Pe komisalisa nzoto pe eza pasi.
/sites/default/files/2025-04/07042025-p-f-journallingalamatin-00web.mp3