Tokolobela matungisi ya batomboki ba M23 ona bayi mboka ya etando ya bilanga ya Bambo , sika bayi mboka baakokima komibomba na Kibirizi…..
Mokambi ndako bontoma ya ekolo asengi na ministre akoyangelaka misala ya mampinga kozua mikano po ya kokembisa mampinga ma ekolo baye bazuami na bitumba o monyele ya ekolo , ye abanzi te’ mampinga ma Eac eekosunga bo’ esengeli te ba Fardc….
Na Kananga talo ya pitolo emati , kowuta na ba nkoto leka mineyi na ndambo litre moko ekomi sika na ba nkoto motoba yango eekotungisa bayi mboka…..
/sites/default/files/2023-02/10022023-p-l-journallingalamatin-web.mp3