Missa monene ya Papa wa Roma Francois esalemi mua mosala misato eye na libanda lya pepo ya NDolo , kuna bato bayike penza koloba pene ba milioni mibale bazuamaki , o libaku liye papa abuaki mbela ona bato baakokoba na konyokolo bayi ekolo Rdc …tokolanda yango kati na sango eye….
O Ituri batomboki ba Adf babomi lisusu bato zomi na moko kati na mikolo mibale o ba territoire ya Irumu pe Mambasa….masanga makobundelaka makoki ma bato basengi na mampinga ma ekolo kokembisa misala mya bango ….
Nzoka nde , Na Nord Kivu , bitumba makasi bizongelaki lisusu mua mosala misato eye na tongo o bisika mibale ya bitumba kati na ba Fardc pe ba M23 o ba territoire ya Masisi pe Rutshuru…
/sites/default/files/2023-02/01022023-p-l-journallingalasoir-web.mp3