LES TITRES
Tookokoba na kolobela likambo ya bongali ya bokono Monkey pox too kutukutu ya makaku o ekolo , ministre o matali kolongonu bua ekolo apesi booko meko po ya komibatela pe kosukisa bokono boye ….tokolanda yango kati na sango na biso ….
Ituri bato leka zomi na mitano babomamaki na batomboki ba Adf na Mambasa , wana bilembo ya mua tango o bitumba bisalemaki mua mosala misato moleki ,pamba te bato basusu leka tuku mibale bakumbamaki o bisika biyebani naino te….
Kati na sango eye tokolobela pe masano ya ndembo ,po ya koyebisa te’ lisanga Maniema Union ekondonguana lobi mokoya mua poso na lisanga ya ekolo Zambie Ngezi Platinium po ya mbala yambo na mimekano ya league des cahmapions ya Caf….
/sites/default/files/2024-08/16082024-p-l-journallingalasoir-00wweb.mp3