Na Nord Kivu , bitumba bizongelaki lisusu lobi loleki mua mosala mineyi kati na batomboki ba M23 na lisungi ya ekolo Rwanda na ba Fardc pe ba Mai Mai o nzela Kitshanga na chefferie ya Bashali , o ba sango tozui banguna bazuami naino na Kishishe pe na Bambo kasi bayi mampinga na babundi basusu pe bazuami nzinga nzinga….
Na Equateur monene bato leka tuku sambo baweyi , basusu leka tuku motoba baakomonana te pe koleka mokama babiki ,wana bilembo na polele ya likama lya mayi eye esalemaki na Bansakusu mia zomi na muambe moleki …..
etuka Kwango , balakisi kama mibale balongolami na buku ya lifuti uto sanza eye,mokambi lisanga kudia kutalana asengi po yango na mbula matari kobongisa likambo liye na lombango….
/sites/default/files/2023-01/27012023-p-l-journal_lingalamatin-web.mp3