Na bayi Congo Demokratiki banso , esengeli kobosana maye maleka pe kolimbisana, wana mbela ekokumba papa wa Roma o mobembo mua ye na mikolo mikoya awa o ekolo , sango epesami na ntoma wa papa mokambi etinda wa ye na lolaka ka Okapi ….
Ba ntoma banso pe ba mpaka ba senat baponami ya etuka Maniema batomboli mingongo po ya kopalela minyoko pe bobuki makoki ma moto boye bookosalema na Salamabila, na yango bakutanaki lobi loleki na ministre o matali makoki ma moto o ekolo tokolanda bosenga bua bango kati na sango eye….
Tokolobela pe likama lya mayi eye esalemaki na basankusu eleki poso yoko , kino sika bilembo bitalisami naino te ata ko booko bitinda ya bolukaluki bizuamaki kuna…
/sites/default/files/2023-01/24012023-p-l-journallingalamatin-web_0.mp3