Bo’ toyebi banso papa wa Roma asili kokoma o ekolo na biso Rdc uto sima ya nzanga ya mua mosala mibale eye, sima libanda lya pepo ya Ndjili ye atambolaki kino na ndako losala ya mokonzi wa ekolo , pe na nsay o mitema bayike bazuamaki o ba balabala po ya koyamba ye….
Kolobela misala po ya kimia pe bokengi o etando ya bitima binene , misala miye mikozuamaka na Goma, bakambi mampinga ba ntoma ya ekolo Rwanda bakozuama lisusu o kati te , na ntina ba Fardc basengi kobazongisa o ekolo na bango , mampinga ma ekolo eekobangela bokengi …..
Na Kasai Oriental , bayi makama ya moto na zando monene ya Mbuji Mayi bakendeki komona moyangeli engumba po te’ abalukela biyano na nkokoso bazuami na yango ….
/sites/default/files/2023-01/01022023-p-l-journallingalamatin-web.mp3