Mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi alobaki ete, ya solo RDC ekosala masano ma 9ème jeux ya Francophonie na mobu ezali koya. Mokonzi ya mboka alobaki yango na yoko likita o mua zomi na sambo sanza ya zomi eleki na Engumba Kinshasa, elongo na bantoma ya bikolo bilobaka lokota la lifalansa baye bazwami awa na Engumba mokonzi Kinshasa. Félix Tshisekedi alakaki bango te, kino to koma na sanza ya mineyi ya mobu mozali koya, manso masengeli kokokisama po na masano mana maleka na bolamu mpenza.
To landa po na yango, mwana mboka Isidore Kwandja Ngembo, Directeur ya comité national ya neuvièmes jeux ya francophonie fazali koloba manso o boso ya Alain Irung Mushinj.
/sites/default/files/2022-10/3110022-p-l-invite_bon-00-_site.mp3