Christelle Mpongo : « Séminaire “Sécurité incendie pour tous”eye kosunga batu komibatela bango moko pe biloko na bango »

Awa na Kinshasa, séminaire moko ekolobela makambo matali ba incendies ebengami “Sécurité incendie pour tous” ekosalema jeudi le 13 juin awa na Kinshasa, na Amphithéâtre ya Institut national des recherches biomédicales (INRB na bokuse).

Yango ezali likanisi ya magazine Femme d’Afrique oyo asungami na entreprise Sécurité, Formation, Prevention et Incendie (SFPI) Consulting. Yango ezali pona kosunga batu koyeba pe kozala na oyo esengeli pona kobatela bomoyi pe biloko na bango ya motuya. Likanisi liyaki na komonaka lolenge batu bazali kobungisa biloko mingi na moto to incendie awa na engumba Kinshasa.

Pona kolobela yango, Jean Marc Matwaki Mofelele ayambi organisatrice na yango, Christelle Mpongo, directrice ya magazine « Femme d’Afrique ». Tolanda lisolo na bango.

/sites/default/files/2024-06/12062024-p-l-kinshasainvitechristellempongoweb-00.mp3