Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.
” Eteni ya mibale ya maponomi ya mokonzi wa ekolo ekokoka po na koyeba nani moto akofanda na ngbende ya mokonzi wa ekolo? Na yango, yebisa biso soki bakoki pe kosalisa lisusu maponomi mango po na mbala ya misato to ya mineyi ? ”
* Ya solo ndeko Mireille Bukasa, po na kopesa eyano na motuna na yo, tobanda nayino na motuna ya mibale. Po na yango, bosengeli koyeba te eteni ya misato pe ya mineyi ya maponomi elengelami te. Mibeko ya maponomi ya ekolo ya Congo Democratique elengeli se eteni ya yambo naa ya mibale po na maponomi ya mokonzi wa ekolo. Mibeko towuti kotanga milobeli eteni ya misato to ya mineyi te. Na kolanda mwa boluka luki tosalaki, tomonaki te ata ekolo moko te ya molongo esila kosalisa maponomi ya koleka eteni ya yambo naa aya mibale. Ata ko mibeko mia bikolo bia molongo mikeseni, basalisaka maponomi ya mokonzi ya ekolo se na eteni moko to biteni bibale. Mibeko ya maponomi milobi boye : Aponami mokonzi wa ekolo candidat oyo azwi bilembo biyike babengi majorite absolue na kotalaka motango mwa baponi. Soki candidat ata moko te azwi oyo babengi majorite absolue na eteni ya yambo ya maponomi, wana basengeli kopona mbala ya mibale po na kokabola ba candidats babale. Tozongela lisusu po te bandeko balandi basimba malamu maye malobami : Mibeko mia ekolo milimboli polele boye : moto akoponama mokonzi wa ekolo soki azwi bilembo biyike na botalaka motango ya baponi to majorite absolue. Soki aponami na eteni ya yambo ya maponomi te, wana bakozongela lisusu maponomi po na mbala ya mibale.
” Yebisa biso lisusu ndeko Tony Ntumba soki ya solo mokonzi wa ekolo ya Congo Democratique wa sika akoponama obele na maponomi ya mbala ya mibale ? “.
* Ya solo ndeko Mireille Bukasa, eloko moko te elakisi te eteni ya mibale ya maponomi ekokoka te po na kopona mokonzi wa ekolo, po na ntina te mibeko milengeli se lolenge loona. Likambo lisusu liye lizali kolakisa te makambo manso makoleka malamu, lizali te, na eteni ya mibale ya maponomi, lolenge ya koponama ekomi lisusu polele koleka na eteni ya yambo. Pamba te, soki na eteni ya yambo mibeko misengi te candidat azwa bilembo biyike to majorite absolue, po na kolonga na maponomi na eteni ya mibale mibeko milobi te candidat akoponama na ngbende ya mokonzi wa ekolo kaka soki aleki moninga wa ye na motango ya bilembo.
Texte de DONAT MADIMBArnTraduction Lingala de Tony Ntumba.