Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.
” Nani akoki kopesa kombo na ye mpo ya koponama ?
* Mwana nionso wa ekolo azali na mibu mikoka azali na makoki ma kokamaba mambi ma politique o ekolo, kolandana na mabongisi ma mibeko mikokaaba ekolo mpe iye mia maponomi. Kolandana molongo libwa mwa mobeko libungutulu kata nzete,libungutulu lubungutulu motoba,ya mia libwa sanza misato mobu tozali,motali mabongisi ya maponomi ya mokonzi wa ekolo, ba ntoma ba bana ba ekolo,o bituka bingumba kino o ba localité, moto moye bana ya congo bakopona, asengeli kozali moyi ekolo RDC.asengeli kozala namibu mikoka na eleko ya bopesi kombo. Asengeli mpe kozala na makoki maye manso matali ki civil mpe politique, bakisa to bakisa ete asengeli kozala moto moye asilaki kozua carte na nyeya moponi soki teasala yango mokolo azali kokende kotika kombo mpo bamopona.
Soki azali oyo babengi candidat independant akozala se ye moko, to akozala na liste a parti politique to masanga ya politique eye asilaki koyebisa tango apesaki kombo mpo ya koponama. Tikatiyebisa ete ata lolenge nini, candidat akomimonisa se na eteni yoko ya mabele ebongisami mpo ya maponomi to circonscription électorale, na eteni nionso ya maponomi.
” Lolenge nini esengeli kopesama ba kombo mpo ya maponomi manso o ekolo ? ”
Molongo mwa zomi na mwambe mwa mobeko libungutulu motoba kata nzete libungutulu, libungutulu motob kta nzete,mwa libwa sanza ya misato mobu koto ibale na isato motali mabongisi ya maponomi ya mokonzi wa ekolo ,ba ntona ba ba bayi ekolo o bituka kino o ba localité, mozali kolimbola ete, candidat indépendant,to moto akoleka na moponomi ye meyi elingi koloba ; eye azali o kati ya masanga ma politique te, ye akopesa kombo na ye na Commission électorale indépendante. Na tango akopesa kombo naye asengeli kobakisa mikanda miye : Mokanda mwa kondima kolandana na moye mozali kosenga C.E.I , motiami mokoloto na ye meyi. Photocopie ya cate naye ya moponi. Mokanda mwa mbotama to attestation de naissance, fiche ezali kotalisa soki azali nani, curriculum vitae na photos passeports mineyi, elembo ya parti politique to masanga ma politique, mokanda mokopesa ndingisa kohuta na lisanga lia politique to masanga mpe elembo ekotalisa ete osili kofuta misolo na CEI.
rn” Tango nini bakoki koboya koyamba candidature to kopmbo ya moto alingi koponama ?”
* Kolandana na molongo mwa tuku mibale na moko mwa maponomi, kombo to candidature ya moto ekoboyama soki solo moto mona akoki koponama te,soki mpe akomelaki CEI te, soki apesi kombo na ye po ya koponama na biteni biyike bia mabele mabongisami mpo ya maponomi .Tobakisa te,akoki mpe koboya candidature ya ,moto atia kombo na ye na ba liste mingi mpe soki apesaki caution to misolo miye bazali kosenga te, wana bakoyamba candidature naye te.
Mpo na eye etali liste epesami na partis politiques to ba candidats indépendants, bakoboya yango soki batie kombo to ba kombo ya bato bayike baye bakoki koponama te, soki mpe batie bato bayike koleka motango mobongisami mpo ya etando to circonscription électorale .
rnTexte de SAMUEL KATSHAKrnOndes CourtesrnTél. : 00243998909787rnE-mail : [email protected] [email protected] rnTraduction zn Lingala de rnMicheline TshwalarnTel : 00243998186793