Lelo mua yambo ya poso nde ebandi na Kisasa likita ya kozua mokano lifuta motango boni mosali ya suka ya ekolo akoki kozua na sanza to Smig na lopoto. Na yango tata mokonzi ya Ekolo Felix Tshisekedi asengi te likita liye lilandela mingi penza pe namotema malamu liboso penza nde lifuta ya baye bafutamaka mbongo moke. Po bango nde banyokwamaka mingi penza koleka nabo zangi misolo.
Na Lubero centre basi bakokoba kaka kozuama na makasi kuna. Nabolandelaka ba sango azwi na mapitalo ndenge na ndenge ya etando Lingomba Mouvement rien sans les femmes atalisi te naba sanza mineyi oyo tokomi wuta mobu ebandi basi motango kama mibale tuku mitano bazuaki bango namakasi.
Na etuka Tshopo. Bayi Kisangani basengi leta atala malamu likambo ya bilenge batangami kokota ma mampinga ma ekolo soki bosenga ezali babengami na lopoto ba pretendants reservistes. Ebele na bango bafundami bakotambola mabe na engumba mingi penza na commune ya Lubunga. Neti kotambola na mandoki pe bitumdeli bisusu na maboko.
/sites/default/files/2025-04/21042025-p-i-journal_lingalamatin-00.mp3web.mp3