MATIN

01. Kinshasa : Basanganaki mia zomi na sambo ya sanza pe mobu tozali na Harare mboka mokonzi ya ekolo Zimbabwe, ba ministres batali mambi ma boyokani na bikolo bia bapaya bizuami o kati ya lisanga  (EAC) pe (SADC) bandimaki banso maye basengeli kosala  po ya kimia mpe bokengi na Est ya RDC

2/KINSHASA : Linaka BCNUDH likolandelaka makoki ma moto lipesi o kati ya liyebisi mitango mia bato  babukeli makoki ma bango , na bituka o nteyi ya ekolo RDC uta sanza ya yambo ya mobu tozali  ;

/sites/default/files/2025-03/20032025-p-a-d-l-journallingalamatin-00_.mp33/ BANDUNDU: Route National numero 17 Mongata - Bandundu ezali ya kobeba makasi , mituka pe bayi mimbembo ya mimbongo bakoki kosalela lisusu nzela wana te, nzambi pe ya kozanga bokengi .