Sima mibu leka mibale ya bofandisami ya mampinga o bituka Ituri pe Nord Kivu , mokonzi wa ekolo azui mokano ya kobanda kobalongola malembe malembe ,alobelaki yango lobi na pokua kati na yoko liyebisi po ya bayi mboka o etando eke monene ya ekolo …..
etuka Tanganyika bato zomi na misato baweyi na pulupulu ekasi kati na bato leka kama mibale baye bazuami na bokono na territoire ya Kabalo na poso mibale, mondele mboka kuna abuaki mbela po ya lisungi na bakambi pe babembani ….
Awa na Kinshasa ndako bontoma ya ekolo endimi mobeko motali bozongisi misolo ya misala po ya mobu moleki, sika yango etindami na ndako ya senat po ya botangemi ya ibale….
/sites/default/files/2023-10/13102023-p-l-journallingalasoir-00web.mp3