SOIR

1/ Doha, masolo masengelaki kosalema kati ya Mbula matadi ya RDC na batindami ba AFC / M23 esalemi te; bokotuna ngai ntina nini esalemi te? Nasengi na bino bolanda na bokebi , eyano nakopesa bino na bolayi o nteyi ya ba sango eye;

2/ KIN : Motango mwa bato bakufi mpe baye bazali o mapitalo sima ya makama masalemaki na mvula ebetaki na mboka mokonzi Kinshasa na suka ya poso eleki, motango mona mona mobuti;

/sites/default/files/2025-04/09042025-p-a-d-l-journallingalasoir-00_.mp33/ BUNIA: Na etuka  Ituri, basi tuku mibale na motoba likolo ya mokama na bana na bango bakufaki na esika ya kobota to yambo ya kobotama  na ba ndako ya bosalisi