1/ Kinshasa : Mokonzi wa ekolo Burundi Evariste Ndayishimiye azalaki awa na mboka mokonzi uta lobi loleki ,ayambamaki na mokonzi wa ekolo Felix Tshisekedi mpe na pokwa eye azongi o ekolo naye Budundi ;
2/Mbuji Mayi : O etuka Kasai-Oriental, uta suka ya poso eleki babandisaki misala mia kolongola na ba nzela ya engumba Mbuji Mayi, biloko binso biye bikopekisa bobandisi misala mia kotonga nzela ya RN1 na bolayi bwa Mbuji May kino na engumba Kananga ;
3/GOMA : O etuka Nord-Kivu, poso moko etikali yambo bana bazonga o kelasi kasi ata elembo moko te ezali kotalisa bozongi ya bana na mobu mwa kelasi tozali mpe eye ekoya na biteyelo pene zomi bia primaires mpe secondaires ezuami na territoire ya Rutshuru mpe misusu.
/sites/default/files/2023-08/28082023-p-a-l-journallingalasoir-00.mp3