Titres
Sango na biso etelemi naino kaka na Goma o etuka Nord Kivu wapi uto mikolo mitano bazangi mayi pe lootiliki , mapitalo matondi na bato bazoki pe baweyi o kati ya bitumba , pe nkokoso bisusu o matali lobiko wana maye tokotalisa o kati ya sango nabiso… ….
awa na Kinshasa booko milulu misalemaki na bopundjaka ba ndako ya bontoma ya bikolo too ba ambassade , ndako ya mimbongo pe ndako ya booko bakonzi , sika kimia ezongi kasi mbula matari ya ekolo endimisi te’ bakosala manso po ya kosukisa kela eye pe kotia bokendi o ba ndako pe bitinda ya bikolo ya bapaya…
Na Mai Ndombe moyangeli etuka kuna abuaki mbela ona ba kabila ba teke pe banunu kozala na kimia pe kobika elongo sima bitumba Makasi masalemaki kati na bango mua mosala mitano moleki ...
/sites/default/files/2025-01/28012025-p-l-journallingalasoir-00web.mp3