Titres
Jean-Pierre Lacroix kalaka mokonzi molandi ya Onu o matali misala ya mampinga aakokoba mobembo mua ye na Nord-Kivu. Na mokolo ya mibale akendeki kotala bisika mzike wapi bikobikaka bayi mampinga ya Onu Mubambiro , ye akendeki kobapesa makasi po te’ bakoba na kobatela ba civils…. Bokoyoka ye kati na sango eye….
matali kolongonu bua nzoto , batangi bakoni kama moko na tuku mineyi na mitano na monkey pox kati na bango babale baweyi o etuka Kwango , ministre o matali kolongonu o etuka abuaki mbela ona mbula matari po ya kobakumbela masungi ya mino po ya bakoni ….
Na Kasai Oriental ekobanda mua mosala mitano moye misala ya kobongisa libanda lya pepo ya Bipemba na Mbuji Mayi…sima mua bopemi nde tokolanda manso na bolayi ….
/sites/default/files/2024-09/190924-p-l-journallingalasoir-00wweb.mp3