Ituri Monsuco na bayi mampinga ma ekolo ba Fardc bakembisi boyokani bua bango po ya koluka mayele ma sika o eleko eye ya koluka kimia o monyele ya ekolo Rdc….
Epekisamaki lobi loleki na mokambi lisanga ya politiki Ensemble pour la République Moise Katumbi kokende too kokota o etuka ya Kongo Central , ntina ya mokano moye ya moyangeli etuka tokolanda yango kati na sango na biso ….
Na engumba kikwit bisika bakotekaka masanga bisengeli sika kofongola bikuke bya yango sima ngonga zomi na motoba, ntina koboya matungisi po ya biteelo pe mapitalo...
/sites/default/files/2023-05/24052023-p-l-journallingalamatin-web.mp3