"Lolenge nini misala mia maponomi mikosalema, banani bakozala ba nzeneneke mpe banongi o ba bureaux ya vote ? "

Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.

” Lolenge nini misala mia maponomi mikosalema,banani bakozala ba nzeneneke mpe banongi o ba bureaux ya vote ? ”

* Tosengeli naino koyebisa ete, maponomi ezali kopona ya moto nionso oyo abiangami kotalisa makanisi maye na likambo songolo.Ezali likambo liye bayi ekolo to bayi lisanga songolo bakosala na kokamataka mokano. Kolandana na mobeko 06 / 006 du 09 mars 2006 motali mabongisi maponomi ma ba ntoma ba bana ba ekolo,mokonzi wa ekolo,kino o ba mboka,nionso ezuami o nteyi ya RDC , kopona ekosalema na moto ye meyi bakoki kotinda moto mosusu koponela moninga te, bakoki mpe kotinda yango na mokanda te.Mpo na koyeba lolege ekosalema ,wana ezali pete. Okoti na bureau ya vote, olakisi carte nayo ya moponi na ba assesseurs, bakotala soki solo kombo nayo ezali na liste ya bato baye, bakomisaki mpo ya kokoma o bureau ena. Sima nayango nde président wa bureau ya vote akopesa yo bulletin ya vote. Okeyi na esika ya kobombana babengi isoloir , kuna okozala yo moko, okopona moto yo olingi, moto mosusu akoyeba te nani yo oponi.Okotia elembo ya mosapi nayo na esika ezali elilingi mpe kombo ya moto olingi kopona.Soki osilisi ogumbi lokosa na yo ndenge esengeli mpo bamona te nani yo oponi,sima ya nionso obimi na esika ya kobombana babengi isoloir okeyi o engongolo to Urne ebongisami mpo ya kotia bulletin ya vote nakati,o boso bwa ba nzeneneke,mpe banongi,otie bulletin nayo o nteyi ya urne.Sima na yango, otie mokoloto esika ekomama kombo nayo na nkasa ezali na ba kombo ya baye basengeli kopona o bureau ya vote ena,soki oyebi kokoma te,okotia elembo ya mosapi mwa yo.Yambo ya kozongisela moponi carte naye, president wa bureau ya vote, akotia langi eye babengi encre indélébile na songe ya mosapi ya moto awuti kopona.

” Tokoki koyeba sima ya maponomi nini ekosalema? ”

* Kolandana na mobeko mwa maponomi, sima ya maponomi bakotanga biyano to kosala eye babengi dépouillement , ezali mosala mwa kotanga ba bulletin ya vote mpe koyeba biyano bia maponomi.Biyanno bina nde bisalemi o boso bwa banongi mpe ba nzeneneke.

” Banongi mpe ba nzeneneke nde banani mpe mosala mwa bango mozali nini o nteyi ya bureau ya vote ? ”

* Nzeneneke ezali mwana ya congo eye atindami na candidat indépendant, lisanga lia politique,to lisanga lia masanga mapolitique eye babengi na lopoto regroupement politique mpe azui ndingisa kohuta na Commission électorale indépendante mpo ya kolandela misala mia maponomi. Azali na ndingisa ya kotia mokoloto na mokanda mokoyebisa lolenge maponomi malekaki, maye asepelaki na mango mpe maye matambolaki malamu te. Monongi ezali mwana wa RDC to mopaya atindami na lisanga lia molongo to lia bayi ekolo,mpe andimami na Commission électorale indépendante mpo ya konongo maye makoleka o maponomi.Mpo na mosala mwa ye,mobeko mwa maponomi mozali koloba ete, banongi na ba nzeneneke , bakolandela eleko inso ya maponomi, kino o botangi bwa bulletin ya vote. Lokola bazali binama bia bureau ya vote te,bakoki kozala te, o esika bazali kopesa biyano. Bakoki mpe kotuna makansi ma bango na ntina ena te.Kasi bapesami ndingisa ya koyeba maye makomami o proces verbal, yambo bakanga yango mpe batia ndanga.Tika toyebisa ete banzeneneke, bakozua lisungi kohuta na baye batindaki bango,nzoka nde banongi bazali na mokumba mwa mbula matadi te, mwa Commission électorale indépendante mpe te.Kasi bokengi bwa bango nde bobatelami na mbula matadi.Soki banongi bazangi o kati ya bureau ya vote, bakoki koboma to kolongola misala mia kopona te. Kopona ekosalema banongi bazala to bazala te. Soki bozangi bwa bango bosalemi na ndenge ya kobuka mibeko wana likambo mosusu.

Texte de SAMUEL KATSHAKrnOndes CourtesrnTél. : 00243998909787rnExt. : 6961rnE-mail : [email protected] [email protected] Lingala de rnMicheline TshwalarnEquipe électoralernRadio OkapirnKinshasa/Ext. : 6169rnTel : 00243998186793