Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.
” Ntina ya Assemblée provinciale ezali nini mpe ekobongisama lolenge nini ?”
* Molongo mwa kama yoko tuku libwa na sambo ya mibeko mikokamba République Démocratique du Congo mozali koloba ete,Assemblée provinciale nde ekolandela manso mazali kosalema o etuka, mpe kolandela manso mazali kosala mbula matadi o etuka elongo na misala misusu mia mbula matadi mizuami o etuka ena. Ba ntoma bana nde babengi bango ba députés provinciaux. Bakopona bango mbala moko na bokutu mpe mandat to etinda ya bango ya mosala ezali mpo ya mibu mitano, bakoki mpe kobapona lisusu soki basali mosala malamu.
Kolandana na molongo kama yoko na tuku mineyi na misato mpe moye mwa kama yoko tuku mineyi na mitano, mwa mobeko libungutulu motoba kata nzete libungutulu, limbungutulu motoba esalemaki o mia sanza libwa sanza ya misato mobu tozali , motali maponomi ya mokonzi wa ekolo,ba ntoma ba bana ba ekolo,kino o ba localité,mozali koloba ete eteni ya mabele ebongisami to circonscription électorale mpo ya maponomi ya ba ntoma ba bana ba ekolo, o bituka ba commune kino o ba localité, ezali se bituka to ba province, etuka, mpe territoire epayi wapi bakobapona. Kasi mpo y engumba etuka Kinshasa, etando ya mabele ebongisami mpo ya maponomi to circonscription électorale ezali ba commune.
Motango mwa bibonga mpo ya Assemblée provinciale yoko yoko ezali boye:rn-Tuku mineyi na mwambe mpo ya ba députés provinciaux soki baye bakomisaki mpo ya kopona o etuka ena bakoki million ibale,na koto kama mitano.
-Mpo ya ba députés tuku mineyi na mibale,ba bituka soki o etuka ena baye bakomisaki kombo mpo ya kopona bazali Million ibale, na moko to million ibale na kama koto mitano.
-Mpo ya ba députés tuku misato na motoba o bituka soki baye bamikomisaki mpo ya kopona baye bamikomisaki kombo mpo ya kpona bazali Million yoko na koto kama mitano na moko to million mibalern-Ba député tuku misato mpo ya bituka biye baye bamikomisaki kombo mpo ya kopona bazali Million yoko na moko to million yoko na koto kama mitano.
-Esengeli ba députés o etuka tuku mibale na mineyi soki baye bakomisaki kombo ya kopona banzali koto kama mitano na moko to million yoko.
-Ba députés zomi na mwambe o etuka soki baye bakomisaki kombo mpo ya kopona bazali koto kama mitano to na se ya motango moye.
rn” Esengeli nini mpo te moto aponama kozala ntoma wa bana ba ekolo o etuka to députés provincial? ”
* Molongo mwa kama yoko na tuku mineyi na mwambe mpe moye mwa kama yoko na tuku mineyi na libwa mwa mobeko motali maponomi molobi ete,liste ya ba candidats députés provinciaux ekopesama na lisanga lia politique.Baye bazali o kati ya masanga ma politque te,bakomonana o maponomi bango meyi. Tika tokudola bino ete ba cadidat to baye bapesi kombo mpo baponama kozala ba ntoma ba bana ba ekolo, basengeli kokokisa mambi maye:rn1.Kozala mwana ya RDC ya makila mpe kobotama,rn2.Kozala na mibu tuku mibale na mitano to komata na mokolo bazali kosukisa kozua ba kombo ya ba candidatrn 3.Kozala na makoki manso maki civil mpe mae ma politiquern4. Kozala na carte ya mponi to carte ya electeur, to kosala yango mokolo ya kotika candidature.
Esengeli mpe toyebisa ete,baye balingi koponama bo bantoma ya bana ba ekolo o bituka to ba députés provinciaux basengeli kokende kotika candidature ya bango na bureau ya Commission électorale indépendante ezuami o etuka ya bango. O nteyi ya dossiere ena esengeli kotia mambi maye :rn1.Mokanda mwa kondima bo ezali kosenga C.E.I mpe motiami mokoloto na candidat ye meyi,rn2.Fiche yoko mpe curriculum vitae ezali kotalisa nani ozalirn3. Photos passeport mineyi,rn4.Elembo ya lisanga lia ye lia politique rn5.bakombo ya balandi baye babale.
” Longola maye ohuti kotanga candidat candidat député provincial akopesa lisusu nini ? ”
* Sima ya kopesa eye babengi déclaration de candidature, asengeli kobakisa mikanda miye :rn- Photocopie ya carte ya moponi to d’électeur,rn-Attestation de naissance,rn-mokanda mozali kotatola ete afutaki misolo na sanduku ya l’Etat bo ezali, tango na kozela ete bokolozongisela,FC koto tuku mitani na mitano rn-Yoko mokanda mwa komopesa ndingisa mohuti na lisanga to parti politique na ye.
Texte de SAMUEL KATSHAKrnOndes CourtesrnTél. : 00243998909787rnE-mail : [email protected] [email protected] Lingala de :rnMicheline TshwalarnMob :00243998186793rnJournaliste Radio Okapi/KIN