Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.
25è leçon chronique élection pour la semaine du 28 Novembre au 02 Décembre 2005
” Eloko nini ekokomela baye bakomeka kopona mbela mibale to koleka? ”
* tosili koloba na lolaka lwa biso ete kopona ezali eloko eye mwana ninso wa ekolo Congo asengeli kosala mpo na ekolo naye. Molongo mwa tuku moto, mwa mobeko libungutulu,mitano kata nzete libungutulu, zomi etali mabongisi ya maponomi ma mibeko na République Démocratique du Congoezali koyebisa ete,moto nionso akomeka kopona to akopona mbala zike , akozua etumbu ekasi ya sanza moko ya boloko mpe akofuta amande ya ba kama tuku mitano to koto kama yoko ya ba FC.Mpe moto mona bakomopekisa makoki
* Mbongo eloko nini ekokomela moto soki afingi moponi, akaneli ye to mpe , abundisi ye ?
* Molongo tuku motoba na mibale mwa mobeko libungutulu mitano, kata nzete libungutulu zomi,ekata amende koto kama yoko , kino koto kama itano ya ba FC bakisa sanza motoba kino mibu mitano ya etumbu na moto nionso akomeka kofinga , kobundisa to kopekisa moto apona to kotinda ye apona moto songolo oyo ye meyi alingi te. Etumbu eye ekokweyela mpe moto nionso oyo akotinda bato na bibundeli to te, mpo bakende kobangisa baponi to moponi azala mwasi to mobali to mpe kotia mobulu yambo, o eleko to sima maponomi.Etumbu eye ekokweyela mpe moto nionso oyo akotia mobulu o nteyi ya bureau vote.
Mpo na kosukisa moto akotia mobulu na misala mia maponomi,soki bazali lisanga lia basimba mandoki, baye bakokangema nde bakolata etumbu wana ebongisami na mokanda mwa mibeko ya RDC..
* Mpo moto akweya na bitumbu bibongisami kolandana na mibeko te, esengeli moto nionso asala maponomi bo ebongisami na République Démocratique ya Congo mpe kopona se mbala moko. Mambi masembo makolandela lisusu bo esengeli batomboki.
TEXTE de SAMUEL KATSHAKrnOndes courtesrnTEL : 0998909787rnTraduction de Micheline Tshwala MupangirnJouraliste productrice, presentatrice des emission rnElectoraux.TEL : 09 98186793rnRadio Okapi. KINSHASA/RDC